Oh Lola, yemba banzembo ya esengo, pamba te Yawe nde asali bongo ! Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo ! Oh bino bangomba, bazamba mpe banzete nyonso kati na yango, boyemba banzembo ya elonga ! Pamba te Yawe asikolaki Jakobi, amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele.
Oh likolo, ganga na esengo ! Oh mabele, sepela ! Oh bangomba, boyemba banzembo ! Pamba te Yawe abondisi bato na Ye mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki.
Nakotia masanzoli na bibebu ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. « Mpe nakobikisa bango. »
Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga. Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiri tango bakokota na makasi na mabele na biso mpe na bandelo na yango.
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »
mpo na kopesa pole na bato nyonso oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso kati na nzela ya kimia. »
Tango ba-anjelu bakabwanaki na bango mpo na kozonga na Likolo, babateli bibwele balobanaki bango na bango : « Tokende kino na Beteleemi, mpo na kotala makambo oyo esalemi kuna, makambo oyo Nkolo ayebisi biso. »
mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »
Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso.
mpe kozongisa, na nzela ya Klisto, boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso, ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo, na kotia kimia na nzela ya makila oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.
Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu,
Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba : « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela ! »