Mata likolo ya ngomba, Siona, yo momemi sango malamu ; tombola mongongo na yo mpe ganga makasi, Yelusalemi, yo momemi sango malamu ; tombola yango penza, kobanga te ; loba na bingumba ya Yuda : « Botala Nzambe na bino ! »
Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »
Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona : « Nzambe na yo azali Mokonzi ! »
Elobaki na ngai : — Molingami ya Nzambe, kobanga te, zala na kimia ! Zala makasi ; solo, zala makasi ! Wana ezalaki koloba na ngai, nzoto na ngai ezwaki lisusu makasi mpe nalobaki : — Loba, nkolo na ngai, pamba te opesi ngai makasi.
Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »
Sima na yango, Yesu atambolaki na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli nyonso zomi na mibale bazalaki elongo na Ye,
Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.