Mwasi oyo azali mokitani ya Abrayami ! Nzokande Satana asila kokanga ye minyololo mibu zomi na mwambe ! Boni, esengelaki te kokangola ye, na oyo ekanga ye, kaka mpo ete ezali mokolo ya Saba ?
Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. »
Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe mpo ete ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami : kaka te mpo na ba-oyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na ba-oyo bazali na kondima ya Abrayami oyo azali tata na biso nyonso,
Na kala, bozalaki bato ya Nzambe te ; kasi sik’oyo, bokomi bato na Ye penza. Na kala, Nzambe azalaki koyokela bino mawa te ; kasi sik’oyo, akomi penza koyokela bino mawa.