Bongo Levi asalaki feti monene, kati na ndako na ye, mpo na lokumu ya Yesu ; bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu bazalaki kolia mesa moko elongo na bango.
Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye ; alobaki : — Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai. Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.
Sima, mokengeli boloko amemaki Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesaki bango bilei ; mpe atondisamaki na esengo makasi, pamba te ye mpe bato nyonso ya libota na ye bandimelaki Nzambe.