Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
Boye, Ngai nalekelaki wana mpe namonaki ndenge nini ozalaki kobunda-bunda na kufa kati na makila. Bongo nalobaki na yo : ‘ Okozala na bomoi atako ozali kobaluka na makila ! ’
Natanaele atunaki Ye : — Oyebi ngai ndenge nini ? Yesu azongiselaki ye : — Liboso ete Filipo abenga yo, wana ozalaki nanu na se ya nzete ya figi, namonaki yo.
Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.
Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.