nakomema bango na ngomba na Ngai ya bule mpe nakopesa bango esengo kati na Ndako epai wapi basambelaka Ngai. Bambeka na bango ya kotumba mpe makabo na bango ekondimama na etumbelo na Ngai, pamba te Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso. »
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [