Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 19:42 - Mokanda na Bomoi

42 mpe alobaki : — Ah, soki kaka yo mpe oyebaki, na mokolo ya lelo, makambo oyo elingaki komemela yo kimia ! Kasi sik’oyo, ezali ya kobombama mosika na miso na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 19:42
35 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, tika ete bayengebene nyonso basambelaka Yo na tango ya malamu ! Soki mayi minene etomboki, bambonge na yango ekozwa bango te.


Mpo na yango, natikaki bango kotambola kolanda baposa ya mitema makasi na bango ; mpe balandaki makanisi na bango.


Bayebi eloko moko te, bazali na bososoli te ; miso na bango ekangama, emonaka te ; mitema na bango ezali makasi, esosolaka te.


Oh ! Soki osalaki penza keba na mibeko na Ngai, kimia na yo elingaki kozala lokola ebale, mpe bosembo na yo, lokola mbonge ya ebale monene ;


Boluka Yawe wana akoki nanu komonana, bobelela Ye wana azali nanu pene.


Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.


Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›


Lokola akomaki pene ya Yelusalemi mpe amonaki engumba, alelaki mpo na yango


Mikolo ya pasi ekokomela yo, mikolo oyo banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozingela yo mpe bakofinafina yo na bangambo nyonso ;


bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.


Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso.


Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko : — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te.


Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !


Oh, soki mitema na bango ezalaki penza ya kobongama mpo na kobanga Ngai mpe kobatela mibeko na Ngai tango nyonso, mpo ete bakoka kozala tango nyonso malamu elongo na bana na bango !


kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga.


kolanda ndenge elobama : « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe. »


Yango wana, kolanda ndenge Molimo Mosantu alobi : « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ