Yawe akotelema ndenge atelemaki na ngomba Perasimi, akotomboka ndenge atombokaki na lubwaku ya Gabaoni mpo na kosala mosala na Ye, mosala na Ye oyo ya kokamwa, mpe kokokisa mosala na Ye, mosala ya kokamwa oyo esalema nanu te.
Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.
Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele oyo alandaka nzela na Yo. Oyebi malamu ete nazalaki na posa ya komona mokolo ya pasi te. Maloba oyo ebimaka na monoko na ngai ebimaka nde liboso na Yo.
Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !
Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.
mpe alobaki : — Ah, soki kaka yo mpe oyebaki, na mokolo ya lelo, makambo oyo elingaki komemela yo kimia ! Kasi sik’oyo, ezali ya kobombama mosika na miso na yo.