Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 19:4 - Mokanda na Bomoi

4 Boye akimaki mbangu na liboso mpe amataki na nzete ya sikomori mpo na komona Yesu, pamba te Yesu akolekela na nzela wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 19:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi asalaki ete palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku.


Bala-Anani, moto ya engumba Gederi, azalaki mobateli banzete ya olive mpe ya sikomori, na lubwaku ya ngambo ya weste ; Yoashi azalaki mobateli mafuta ya olive ;


Mokonzi asalaki ete wolo mpe palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku.


Mokonzi asalaki ete palata ekoma ebele kati na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku.


Abebisaki bilanga na bango ya vino na nzela ya mvula ya mabanga, mpe banzete na bango ya sikomori na nzela ya mvula ya pembe ;


Kasi Yawe alendisaki bayini ya Retsini mpo na kobundisa bango mpe apelisaki mitema ya banguna na bango mpo ete batombokela bango.


Amosi azongiselaki Amatsia : — Nazalaki mosakoli te to mwana ya mosakoli te, kasi nazalaki nde mobateli bibwele mpe moloni ya basikomori.


Nkolo azongisaki : — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo : « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino.


azalaki na posa ya komona soki Yesu azali nani, kasi lokola azalaki mokuse, akokaki te komona Ye mpo ete bato bazalaki ebele penza.


Tango Yesu akomaki na esika yango, atombolaki miso mpe alobaki na ye : — Zashe, kita noki ! Nasengeli kolala na ndako na yo lelo.


Kasi lokola bamonaki te nzela ya kokotisa ye kati na ndako, pamba te bato bazalaki ebele, bamataki na likolo ya ndako, batobolaki lidusu mpe bakitisaki ye, elongo na tsipoyi na ye, na kati-kati ya ebele ya bato, liboso ya Yesu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ