36 Wana azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela.
Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »
Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela.
Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango, mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki.