35 Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango, mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »
Makambo wana nyonso esalemaki mpo ete maloba oyo mosakoli aloba ekokisama :
Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
Bazongisaki : — Nkolo azali na bosenga na yango.
Wana azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela.
Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi.
Yesu amonaki mwana moko ya ane mpe avandaki na likolo na yango kolanda ndenge ekomama :