Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 19:27 - Mokanda na Bomoi

27 Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 19:27
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo alingi kosimba yango asengeli kosalela ebende to libaya ya likonga ; batumbaka yango kaka na esika oyo ezali. »


Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai.


Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »


Tango bokomona yango, mitema na bino ekosepela mpe mikuwa na bino ekozwa makasi ya sika lokola matiti ya mobesu ; loboko na Yawe ekoyebana kati na bawumbu na Ye mpe kanda na Ye ekokitela banguna na Ye.


Boyoka makelele kobima longwa na engumba, boyoka makelele kobima longwa na Tempelo ! Ezali nde mongongo na Yawe oyo azali kofuta banguna na Ye kolanda oyo ekoki na misala na bango.


Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa, oyo azongisaka mabe na mabe. Yawe azongisaka mabe na mabe mpe atombokaka makasi. Yawe azongisaka mabe na mabe epai ya banguna na Ye, akangelaka bayini na Ye kanda makasi.


Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpela mpe akobengana banguna na Ye kino kati na molili.


Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.


Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »


Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki : — Te, ekoki kosalema te !


Pamba te mikolo wana ekozala mikolo ya pasi makasi, mikolo oyo makambo nyonso oyo ekomama ekokokisama.


Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.


Wuta tango wana, azali kozela ete Nzambe akomisa banguna na Ye enyatelo makolo na Ye.


Bato balobaki na Samuele : — Wapi bato oyo bazalaki koloba : « Boni, Saulo akoyangela biso ? » Bomemela biso bato yango mpo ete toboma bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ