Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 19:26 - Mokanda na Bomoi

26 Nkolo azongisaki : « Nazali koloba na bino : na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 19:26
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya Saulo oyo nalongolaki liboso na yo.


Tika ete mikolo ya bomoi na ye ekoma moke, tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye !


Na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.


Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango. [


pamba te na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.


Mobateli bomengo amilobelaki : « Nasala nini sik’oyo ? Mokonzi na ngai azali kolongola ngai na mosala ? Nazali na makasi te ya kotimola mabele, mpe nakoyoka soni mpo na kokoma kosenga-senga.


Balobaki na ye : « Nkolo, azali na mbongo ya bibende zomi ! »


Boye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka ! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.


Nzokande, ekomama boye kati na buku ya banzembo : « Tika ete ndako na ye etikala polele, mpe tika ete moto moko te avanda kati na yango ! » Mpe : « Tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye ! »


Boye, bosala keba mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na biso, kasi mpo ete bozwa lifuti ya kokoka.


Nayebi malamu ete ozali na molende mpe oyokaki pasi makasi mpo na Kombo na Ngai, kasi olembaki te.


Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo.


Bongo Samuele alobaki na ye : — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo.


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ