Mozwi abengaki ye mpo na kotuna ye : « Makambo nini nazali koyoka na tina na yo ? Yebisa ngai ndenge nini obateli bomengo na ngai ; pamba te, kobanda lelo, okozala lisusu mobateli bomengo na ngai te. »
Boye abengaki basali zomi kati na basali na ye mpe apesaki bango mbongo ya bibende zomi. Alobaki na bango : « Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga. »