Boye abengaki basali zomi kati na basali na ye mpe apesaki bango mbongo ya bibende zomi. Alobaki na bango : « Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga. »
Mpe mowei abimaki longwa na kunda ; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na basinga ya bitendi, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na elamba. Bongo Yesu alobaki na bato oyo bazalaki wana : — Bofungola ye basinga wana mpe botika ye kokende.
mpe elamba oyo balingaki na moto ya Yesu ; elamba ezalaki esika moko te na maputa oyo balingaki na yango nzoto ya Yesu, kasi ezalaki ya kolingama na esika na yango moko.