19 Nkolo na ye azongisaki : « Nakokomisa yo moyangeli ya bingumba mitano. »
Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo, pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. »
Mosali ya mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende mitano lokola mileki. »
Mosali mosusu ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, tala mbongo na yo ! Nabombaki yango malamu kati na eteni ya elamba.
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.
Moto oyo aloni mpe moto oyo asopi mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moko na moko akozwa lifuti na ye moko kolanda mosala na ye.
Bokanisaka likambo oyo : Moto oyo alonaka moke abukaka mpe moke, mpe moto oyo alonaka ebele abukaka mpe ebele.
Boye, bosala keba mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na biso, kasi mpo ete bozwa lifuti ya kokoka.