Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 19:10 - Mokanda na Bomoi

10 Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 19:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi.


nakoluka oyo ebungaki, nakozongisa na nzela, oyo epengwaki ; nakosalisa oyo ebukana lokolo, nakobikisa oyo ezangi makasi. Kasi nakoboma oyo ya mafuta mpe oyo ya makasi. Nakobatela bibwele na Ngai na bosembo.


Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. »


Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele.


Yesu azongisaki : — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !


Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [


Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na kobikisa bato oyo babunga nzela.]


Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »


Soki mwasi azali na mbongo ya bibende zomi mpe abungisi moko kati na yango, boni, apelisaka mwinda te, akombaka ndako te mpo na koluka yango malamu kino amona yango ?


Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango.


Solo, wana tozalaki nanu bato na bolembu, Klisto akufaki mpo na bato ya masumu, na tango oyo Nzambe abongisaki.


Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ