Oh Jakobi, mpo na nini ozali koloba ; oh Isalaele, mpo na nini kotatola : « Nzela na ngai ebombami na miso ya Yawe, likambo na ngai eyebani te na Nzambe na ngai ? »
Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?
Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !
Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.
Tobondelaka Nzambe na molende nyonso, butu mpe moyi, mpo ete apesa biso nzela ya komona bino lisusu mpe ya kokokisa oyo ezangi kati na kondima na bino.
Mwasi akufisa mobali, oyo atikala penza ye moko mpe azali kokelela atiaka elikya na ye kati na Nzambe mpe asambelaka butu mpe moyi mpo na kosenga lisungi epai ya Nzambe.
Nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe oyo nasalelaka na motema peto ndenge bakoko na ngai bazalaki kosala, pamba te tango nyonso, ezala butu to moyi, nabosanaka yo te na mabondeli na ngai.
Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.
Ngai Polo, mowumbu ya Nzambe mpe ntoma ya Yesu-Klisto, mpo na kolendisa kondima ya baponami ya Nzambe mpe boyebi ya bosolo oyo ememaka na botosi kati na makambo ya Nzambe,
Ngai Petelo, ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya baponami ya Nzambe oyo bazali kati na bamboka ya bapaya mpe bapalangani na bituka ya Ponti, ya Galatia, ya Kapadose, ya Azia mpe ya Bitini.
Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »
Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? »
Yango wana, batelemaka liboso ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe basalelaka Ye kati na Tempelo na Ye, butu mpe moyi ; mpe Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi akobatela bango kati na evandelo na Ye.