Nazali koloba na bino penza ya solo : ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye.
Kati na engumba yango, ezalaki mpe na mwasi moko akufisa mobali ; azalaki koya mbala na mbala epai ya mosambisi yango mpo na koloba na ye : « Longisa ngai liboso ya monguna na ngai. »
Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka : — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !