39 Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka : — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
Wana Yesu azalaki nanu koloba, moto moko ayaki wuta na ndako ya Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe alobaki : — Mwana na yo ya mwasi akufi. Kotungisa lisusu Moteyi te.