Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 18:23 - Mokanda na Bomoi

23 Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 18:23
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.


Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.


Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.


Bongo alobaki na bato nyonso : — Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.


Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.


Yesu atalaki ye mpe alobaki : — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !


Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye : — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.


Pamba te, boyeba yango malamu, moto nyonso oyo asalaka kindumba, makambo ya soni to atondi na lokoso oyo ekokani na kosambela bikeko, akokota te na Bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe.


Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto


Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.


Bolingaka mokili te ; bolingaka mpe te nyonso oyo ezali kati na mokili. Moto oyo alingaka mokili azalaka na bolingo ya Tata te kati na ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ