Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 18:22 - Mokanda na Bomoi

22 Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 18:22
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.


Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.


kasi likambo moko kaka ezali na tina. Mari aponi oyo eleki malamu, mpe moto ata moko te akobotola ye yango.


Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ;


Nalobi na bino : bosalela bomengo ya mabe mpo na kotonga bondeko na bato mosusu ; mpo ete tango ekosila, bayamba bino kati na bivandelo ya seko.


Mokambi yango azongisaki : — Natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai.


Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.


Bongo Yesu alobaki na bango nyonso : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya, kokamata ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe kolanda Ngai.


Bandeko, nazali kokanisa te ete nasili kozwa yango ; kasi nasalaka likambo moko : nabosanaka makambo nyonso oyo esili koleka, mpe namipesaka mpo na makambo oyo ezali liboso.


Balingami na ngai, ezali na likambo moko oyo bosengeli te kobosana : mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola mibu nkoto moko, mpe mibu nkoto moko ezali lokola mokolo moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ