Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 18:19 - Mokanda na Bomoi

19 Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 18:19
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo ? Moko te !


Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?


Anjelu azongiselaki ye : — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.


Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !


Mokambi moko ya Bayuda atunaki na Yesu : — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?


Oyebi mibeko oyo : « Okosalaka ekobo te, okobomaka te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »


Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.


Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,


bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ