Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 18:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kasi Yesu abengaki bana mpe alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bana mike.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 18:16
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami akatisaki Izaki ngenga tango akokisaki mikolo mwambe ya mbotama, ndenge Nzambe atindaki ye.


Bato nyonso ya Yuda elongo na mabota nyonso, basi mpe bana na bango, batelemaki liboso ya Yawe.


Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango.


Yesu alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.


Bato bazalaki mpe komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko. Tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango.


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.


Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.


Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike ; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.


Pamba te, mobali oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzokande bazali bule.


Botelemi awa mpo na kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe na bino ; boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kosala elongo na bino, na mokolo ya lelo, na kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe,


Bosangisa bato : mibali, basi, bana mpe bapaya oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bakoka koyoka mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, mpe kosalela malamu maloba nyonso ya mibeko oyo.


Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ