Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino ; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.
Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe ? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba : ‹ Tokosi Yo na likambo nini ? › Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo.
Na esika na yango, napesi epai ya Balevi lokola libula na bango, biteni moko nyonso kati na biteni zomi oyo bana ya Isalaele bakopesa lokola likabo epai na Yawe. Yango wana, nalobaki na tina na bango : ‹ Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele. › »
Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.
Bosala keba ete bosalelaka te bosembo na bino liboso ya bato, mpo ete bamona bino ; soki te, bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abombela bino.
Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
Tango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
Mawa na bino, Bafarizeo ! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.
Kati na lingomba ya Bayuda, nazalaki komata koleka Bayuda ebele ya ekeke na ngai, oyo tozalaki na bango mibu moko ya mbotama ; nalekaki bango kutu na bolingo eleka ndelo mpo na bokoko ya batata na ngai.
pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.