Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 18:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 18:1
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona mpe akomonana kati na nkembo na Ye.


Nakozalaka na elikya na likambo oyo : nakobika bolamu ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.


Mpo na Yo Nzambe, bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ; mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.


Oh Nkolo, yokela ngai mawa ; pamba te nabelelaka Yo tango nyonso !


basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.


mpe botikela Ye te tango ya kopema kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili !


Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino.


Nazindi kino na esika oyo ngomba ebandaka, mabele esili kokanga bikangelo na yango sima na ngai mpo na libela. Kasi Yo Yawe, Nzambe na ngai, obimisi ngai ya bomoi wuta na libulu ya mozindo.


Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.


Bosenzela malamu mpe bosambelaka tango nyonso, mpo ete bozwa makasi ya kokima makambo nyonso oyo ekoya mpe ya kotelema liboso ya Mwana na Moto.


mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi ; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema ; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende ;


Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te ;


Tosalaka bolamu ; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.


Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.


Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.


Epafrasi, ye oyo azali mpe moko kati na bino mpe mowumbu ya Yesu-Klisto, atindeli bino mbote. Abundaka tango nyonso etumba mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete botelema ngwi lokola bato oyo bakembi kati na kondima mpe baselingwa mpo na kokokisa mokano nyonso ya Nzambe.


Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.


Lokola azalaki kobenda libondeli na ye molayi liboso ya Yawe, Eli azalaki kotala malamu-malamu monoko na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ