Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 17:6 - Mokanda na Bomoi

6 Nkolo azongisaki : — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo : « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 17:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu alobaki na ye : — Yaka. Mbala moko, Petelo akitaki na bwato mpe atambolaki na likolo ya mayi mpo na kokende kokutana na Yesu.


Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [


Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.


Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde : tango balonaka yango, ezalaka nkona oyo eleki moke kati na bankona nyonso ya mokili.


Yesu alobaki na ye : — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.


Bokonzi ya Nzambe ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye, ebimisaki moto mpe ekomaki nzete monene, bongo bandeke ya likolo eyaki kovanda na bitape na yango.


Nani kati na bino, soki azali na mosali bilanga to na mobateli bibwele, akoloba na ye tango azongi wuta na bilanga : « Yaka noki, vanda na mesa mpo ete olia ? »


Boye akimaki mbangu na liboso mpe amataki na nzete ya sikomori mpo na komona Yesu, pamba te Yesu akolekela na nzela wana.


Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye : — Kolela te !


mpe atindaki bango epai ya Nkolo Yesu mpo na kotuna : — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ?


Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso ; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ