32 Bokanisa makambo oyo ekomelaki mwasi ya Loti !
Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki : — Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino ! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo ! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama !
Kasi mwasi ya Loti atalaki na sima mpe akomaki ekeko ya mungwa.
Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango.