Luka 17:29 - Mokanda na Bomoi29 Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.