Boye, Yawe alongolaki kati na mokili bikelamu nyonso oyo ezalaki na bomoi, kobanda na moto kino na ebwele, ekelamu oyo etambolaka na libumu mpe ndeke ya likolo ; alongolaki bango na mokili mpe etikalaki kaka Noa na ba-oyo bazalaki na ye elongo na masuwa.
Pasi ekokomela yo, mpe okoyeba te ndenge ya kolongola yango ; mikakatano ekokomela yo mpe okokoka komibatela te ; libebi oyo oyebaki te ekokomela yo na pwasa.
Boye amemaki Davidi na esika oyo bato ya Amaleki bazalaki. Mpe bamonaki ete bazalaki ya kopanzana na mboka mobimba, bazalaki kolia, komela mpe kobina mpo na ebele ya bomengo ya bitumba oyo babotolaki na mokili ya bato ya Filisitia mpe ya Yuda.