Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »
Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Tango ezali koya, tango oyo bokozala na posa makasi ya komona ata mokolo moko kati na mikolo ya Mwana na Moto, kasi bokomona yango te.
Nani kati na bino, soki azali na mosali bilanga to na mobateli bibwele, akoloba na ye tango azongi wuta na bilanga : « Yaka noki, vanda na mesa mpo ete olia ? »
Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.
soki ayokelaki te mokili ya kala mawa kasi abikisaki bato mwambe oyo kati na bango ezalaki na Noa oyo azalaki kosakola bosembo na tango ya mpela oyo abebisaki na yango mokili elongo na bato oyo batosaki Ye te,