Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 17:20 - Mokanda na Bomoi

20 Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu : — Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini ? Yesu azongiselaki bango : — Bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ete bato bamona yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 17:20
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.


Alobaki na ngai : — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Ezala putulu ya engumba na bino, topupoli yango wuta na makolo na biso, mpo na kokebisa bino. Nzokande, boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. »


Mokolo moko ya Saba, Yesu akendeki kolia kati na ndako ya moko kati na bakambi ya Bafarizeo, mpe Bafarizeo bazalaki kotala Ye malamu.


Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi ; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.


Wana bazalaki koyoka makambo yango, Yesu akobaki koloba lisese moko, pamba te akomaki pene ya Yelusalemi, mpe mpo ete bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingi komimonisa kaka na tango yango.


Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ