13 mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi : — Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa !
Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.
Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga : — Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso.
Tango Yesu amonaki bango, alobaki : — Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe ! Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto.
Simona azongiselaki Ye : — Moteyi, tosali butu mobimba, tozwi ata eloko moko te. Kasi lokola olobi bongo, nakobwaka minyama.