Lokola osali bongo, bokono ya maba ya Namani ekokangama na yo mpe bakitani na yo mpo na libela. Bongo Geazi alongwaki na liboso ya Elize. Poso ya nzoto na ye ekomaki na maba, mpe akomaki pembe lokola mvula ya pembe.
Yawe alobaki na ye : — Sik’oyo, zongisa loboko na yo na tolo na yo. Moyize azongisaki loboko na ye na tolo na ye. Mpe tango alongolaki yango, loboko yango ekomaki lisusu malamu lokola biteni mosusu ya nzoto na ye.
Yawe azongiselaki Moyize : — Soki tata na ye abwakelaki ye soyi na elongi ; boni, alingaki kozala na soni te mikolo sambo ? Tia ye na libanda ya molako mikolo sambo, na sima na yango nde akoki kozonga.
Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! »
Mokolo mosusu, wana Yesu azalaki kati na moko ya bingumba, moto moko atonda na maba na nzoto abimaki. Tango amonaki Yesu, afukamaki liboso na Ye elongi kino na mabele mpe abondelaki Ye : — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.