Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 17:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Makambo oyo ebetisaka bato mabaku ekoki kozanga te ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 17:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Ozali epekiselo mpo na Ngai ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.


Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !


Abrayami alobaki na ye : « Soki baboyi koyoka Moyize mpe basakoli, bakondima mpe kaka te ata soki moto moko alamuki kati na bakufi. »


Yango wana, totika kosambisana biso na biso. Nzokande, bosalela mayele na bino te mpo na kobetisa ndeko moko libaku to mpo na kokweyisa ye.


Bandeko, nabondeli bino : bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango.


Bozalaka libaku te, ezala mpo na Bayuda, mpo na Bagreki to mpo na Lingomba ya Nzambe.


Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino.


Yango wana, soki mpo na bilei na ngai, ndeko na ngai azali kokweya na masumu, nakotikala kolia lisusu misuni te mpo ete nazala libaku te, oyo ekokweyisa ye na masumu.


Molimo alobi polele ete, na tango ya suka, ebele bakosundola kondima, pamba te bakolanda milimo ya lokuta mpe mateya oyo ewuti na milimo mabe.


Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.


Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ