pamba te soki natondi makasi, nakoki kowangana Yo mpe koloba : « Yawe nde nani ? » To soki nazali na bobola, nakoki koyiba mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni.
Mobateli bomengo amilobelaki : « Nasala nini sik’oyo ? Mokonzi na ngai azali kolongola ngai na mosala ? Nazali na makasi te ya kotimola mabele, mpe nakoyoka soni mpo na kokoma kosenga-senga.
Boye, abengaki bato nyonso oyo bazalaki na niongo ya mokonzi na ye ; atunaki na moto ya liboso : « Osengeli kofuta boni lokola niongo epai ya mokonzi na ngai ? »