3 Mobateli bomengo amilobelaki : « Nasala nini sik’oyo ? Mokonzi na ngai azali kolongola ngai na mosala ? Nazali na makasi te ya kotimola mabele, mpe nakoyoka soni mpo na kokoma kosenga-senga.
Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?
Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Jeriko. Tango bazalaki kobima wuta na engumba elongo na bato ebele, mokufi miso Bartime, mwana mobali ya Time, avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga.
Mozwi abengaki ye mpo na kotuna ye : « Makambo nini nazali koyoka na tina na yo ? Yebisa ngai ndenge nini obateli bomengo na ngai ; pamba te, kobanda lelo, okozala lisusu mobateli bomengo na ngai te. »
Bato oyo bazalaki zingazinga na ye mpe ba-oyo bazalaki komona ye kosenga-senga mbongo bakomaki koloba : — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki tango nyonso ya kovanda mpo na kosenga-senga mbongo ?
Tozali koyoka ete mingi kati na bino bazali bagoyigoyi mpe bazali kotambola na bomoi ya mobulu, bazali kosala eloko moko te, kasi bazali kaka kokota na makambo ya bato mosusu.