Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 16:29 - Mokanda na Bomoi

29 Abrayami azongisaki : « Bandeko na yo bazali na Moyize mpe basakoli ; tika ete bayoka bango ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 16:29
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boluka kati na buku ya Yawe mpe botanga : Moko te kati na bango akozanga, moko te akomitungisa mpo na moninga na ye ; pamba te monoko na Yawe nde epesi mitindo mpe Molimo na Ye akosangisa bango elongo.


Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›


Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi ; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.


Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.


mpe bapesaki Ye buku ya mosakoli Ezayi. Afungolaki yango mpe amonaki esika epai wapi bakoma :


Pamba te wuta kala, kati na bingumba nyonso, ezali na bato oyo bateyaka Mobeko ya Moyize, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani, mikolo nyonso ya Saba.


Bino oyo bolingi kozala na se ya bokonzi ya Mobeko, boyebisa ngai nanu, bososolaka na bino te makambo oyo Mobeko elobaka ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ