Luka 16:28 - Mokanda na Bomoi28 pamba te nazali na bandeko mitano. Tika ete akende kokebisa bango mpo ete, bango mpe, bakoma awa te, kati na esika oyo ya pasi ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bayokanaki kokutana na Polo mokolo mosusu. Bongo tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta na tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, na nzela ya Mobeko ya Moyize mpe makomi ya basakoli.