Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 16:27 - Mokanda na Bomoi

27 Mozwi alobaki : « Tata, nasengi na yo, tinda Lazare epai ya libota na ngai,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 16:27
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pasi ya libota oyo etikali sima na ye ekosala ye nini tango basanza oyo bakatela ye ekomi na suka ?


Sima na Yobo kosambela mpo na baninga na ye, Yawe atalisaki ye lisusu bolamu mpe apesaki ye bomengo mbala mibale koleka oyo azalaki na yango liboso.


Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango ! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango ; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango !


Etikali tango moke kaka, moto mabe akozala lisusu te ; ata oluki ye, okomona ye te.


Mozwi akowumelaka te na bomoi ; ata aleki na lokumu, akokani na nyama oyo ezali kokufa.


Olingaka mabe koleka bolamu, lokuta koleka koloba bosolo.


Nayinaki biloko nyonso oyo namonelaki pasi na se ya moyi, pamba te nakotika yango epai ya moto oyo akoya sima na ngai.


Lisusu, libulu moko monene ekaboli biso mpe bino, mpo ete moto nyonso oyo alingi kolongwa awa epai biso tozali mpo na kokende epai na bino, akoka te ; mpe ete moto nyonso oyo alingi kokatisa libulu yango longwa kuna epai bino bozali mpo na koya awa epai na biso, akoka mpe te. »


pamba te nazali na bandeko mitano. Tika ete akende kokebisa bango mpo ete, bango mpe, bakoma awa te, kati na esika oyo ya pasi ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ