Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 16:23 - Mokanda na Bomoi

23 Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 16:23
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi, okotika mpe te ete mosantu na Yo apola.


Bazali lokola bameme mpe babongisami mpo na mboka ya bakufi ; kufa ekokoma kobokola bango. Kala te, bato ya sembo bakonyata bango, kitoko na bango ekonzuluka, mpe mboka ya bakufi ekokoma ndako na bango.


Pamba te bolingo na Yo mpo na ngai ezali monene, mpe okangolaki ngai wuta na mozindo ya mboka ya bakufi.


Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo ; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.


Nzela ya bomoi ememaka moto ya bwanya na likolo, mpo na kobatela ye ete akita na mboka ya bakufi te.


Makolo na ye ekokita kino na kufa, ekokende kino na mokili ya bakufi.


Ndako na ye ezali penza nzela ya mboka ya bakufi, oyo ememaka kino na bandako ya kufa.


Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka, mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi.


Kasi okiti nde na mokili ya bakufi, na se penza ya libulu.


Mokili ya bakufi, kuna na se, eningani na sango ya koya na yo, elamusi, mpo na koyamba yo, milimo ya bakufi, bato nyonso oyo bazalaki bakambi na mokili, etomboli bango, na bakiti na bango ya bokonzi, ba-oyo nyonso bazalaki bakonzi ya bikolo.


Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te ! Okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo.


Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na moto ya lifelo.


Bino, banyoka, libota ya bitupa ! Ndenge nini bokoki kokanisa ete bokokima etumbu ya lifelo ?


Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.


Yango wana, soki liso na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo.


Bakomaki koganga : — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?


Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. »


pamba te nazali na bandeko mitano. Tika ete akende kokebisa bango mpo ete, bango mpe, bakoma awa te, kati na esika oyo ya pasi ! »


Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te !


Oh kufa, wapi elonga na yo ? Oh kufa, wapi nguya na yo ? »


Soki Nzambe azangaki te kopesa na ba-anjelu oyo basalaki masumu etumbu kasi abwakaki bango ya kokangama na minyololo kati na molili makasi ya lifelo epai wapi abombi bango mpo na kozela mokolo ya kosambisama,


Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ