Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 16:20 - Mokanda na Bomoi

20 Na liboso ya ekuke ya ndako na ye, mobola moko atandamaki wana, kombo na ye ezalaki Lazare, nzoto na ye mobimba etonda na bapota ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 16:20
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.


Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.


Mikolo nyonso, nanyokwamaka ; mpe tongo nyonso, nazwaka etumbu.


Longwa na litambe kino na moto, eloko moko te ezali malamu, kaka bapota mpe matutu oyo basukola te, batia kisi te mpe bapakola mafuta te.


Boni, kisi ezali te kati na Galadi ? Minganga bazali kuna te ? Bongo mpo na nini bato na ngai bazali kobika te ?


Wana Petelo azalaki kokende na ekuke mpo na kobima, mwasi mosali mosusu amonaki ye mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana : — Moto oyo azalaki elongo na Yesu ya Nazareti.


Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso.


azalaki koluka ata kolia biloko oyo ezalaki kokweya longwa na mesa ya mozwi, kasi ezalaki bambwa nde ezalaki koya kolembola bapota na ye.


Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare ; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale : Mari mpe Marte.


Nzokande, ezalaki mpe na bato moko oyo bazalaki komema moto moko akufa makolo wuta abotama, mpe bazalaki kotia ye mikolo nyonso na ekuke ya Tempelo mpo ete asengaka mbongo epai ya bato oyo bazalaki kokota. Bazalaki kobenga ekuke yango « Ekuke ya kitoko. »


Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye,


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ