Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 16:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi ; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 16:16
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene.


eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.


pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te ; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te.


« Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »


Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya : « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »


Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.


Tango babwakaki Yoane kati na boloko, Yesu akendeki na Galile epai wapi azalaki koteya Sango Malamu ya Nzambe.


Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso ; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.


« Ezala putulu ya engumba na bino, topupoli yango wuta na makolo na biso, mpo na kokebisa bino. Nzokande, boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. »


bobikisa babeli oyo bazali kuna mpe boloba na bango : « Bokonzi ya Nzambe ekomi pene na bino. »


Abrayami azongisaki : « Bandeko na yo bazali na Moyize mpe basakoli ; tika ete bayoka bango ! »


Abrayami alobaki na ye : « Soki baboyi koyoka Moyize mpe basakoli, bakondima mpe kaka te ata soki moto moko alamuki kati na bakufi. »


mpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli.


Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.


Soki totiki ye kokoba kosala bongo, bato nyonso bakondima ye ; bongo bato ya Rome bakoya bakobebisa Tempelo na biso mpe ekolo na biso.


Bongo Bafarizeo balobanaki bango na bango : — Bomoni, bokokoka lisusu eloko moko te ; bato nyonso bakomi na bango kolanda ye !


pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]


Kasi ezali ndenge wana nde Nzambe akokisaki makambo oyo aloba wuta kala na nzela ya basakoli nyonso, ete Klisto na Ye asengeli komona pasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ