Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 16:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mosali moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela mbala moko Nzambe mpe mbongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 16:13
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu alobaki na ye : — Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »


Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.


Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.


— Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.


Mpe soki bozali sembo te na bobateli biloko ya moto mosusu, nani akopesa bino biloko oyo esengeli kozala ya bino moko ?


Nalobi na bino : bosalela bomengo ya mabe mpo na kotonga bondeko na bato mosusu ; mpo ete tango ekosila, bayamba bino kati na bivandelo ya seko.


Yesu alobaki : — Bopekisa ye te, pamba te moto nyonso oyo atelemelaka bino te azali mpo na bino.


Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.


Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ