Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 15:7 - Mokanda na Bomoi

7 Na nzela yango, nazali koloba na bino : esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 15:7
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali na bato oyo bamimonaka peto na miso na bango moko, nzokande bamipetoli na mbindo na bango te.


Mpe soki amoni yango, nazali koloba na bino penza ya solo, esengo na ye mpo na meme wana ekoleka esengo mpo na bameme tuku libwa na libwa oyo ebungaki te.


Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema.


Na nzela yango, nazali koloba na bino : ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.


Kasi azongiselaki tata na ye : « Tala ! Mibu nyonso oyo nazalaki kosalela yo lokola mowumbu, natikalaki koboya te kotosa mitindo na yo. Nzokande, otikala nanu kopesa ngai te ata mwana ntaba mpo ete nasepela elongo na balingami na ngai.


Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »


Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki ! »


Soki mwasi azali na mbongo ya bibende zomi mpe abungisi moko kati na yango, boni, apelisaka mwinda te, akombaka ndako te mpo na koluka yango malamu kino amona yango ?


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bino, bozali penza bato oyo bomilakisaka na miso ya bato mosusu lokola nde bozali bato ya sembo, nzokande Nzambe ayebi mitema na bino ; pamba te oyo bato bamonaka motuya makasi, Nzambe ayokaka yango nkele.


Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu mpo ete babongola mitema.


Na kala, tango Mobeko ezalaki te, nazalaki na bomoi ; kasi tango mitindo eyei, lisumu mpe ezwi nguya, mpe ngai nakufi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ