Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 15:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 15:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali koyengayenga lokola meme oyo ebungi ; luka ngai, mosali na Yo, pamba te nabosani mibeko na Yo te. »


Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo.


Na nzela yango, nazali koloba na bino : ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.


pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! » Boye babandaki feti na esengo makasi.


Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo.


Na nzela yango, nazali koloba na bino : esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.


Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.


Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye ; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai : esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.


Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.


Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo.


nasambelaka Nzambe tango nyonso mpo na bino nyonso mpe nasalaka yango na esengo,


Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso.


Yango wana, bandeko mpe balingami na ngai, bino oyo nazali na posa makasi ya komona lisusu, bino oyo bozali esengo mpe motole na ngai, botikala ngwi kati na Nkolo.


Banani bazali penza elikya na biso, esengo na biso to motole na biso, oyo tokomikumisa mpo na yango na miso ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na mokolo oyo akoya ? Boni, ezali bino te ?


Na kala, bozalaki bato ya Nzambe te ; kasi sik’oyo, bokomi bato na Ye penza. Na kala, Nzambe azalaki koyokela bino mawa te ; kasi sik’oyo, akomi penza koyokela bino mawa.


Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ