Ndima kaka mabe na yo, mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo ; obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya, na se ya banzete nyonso ya mibesu, mpe otosaki Ngai te, › » elobi Yawe.
mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »
Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.
Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.
To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema ?
Tango bozali kobetisa bandeko na bino mabaku na ndenge wana, mpe bozali kozokisa mitema na bango, oyo elenda te, bozali kosala masumu liboso ya Klisto.