Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 15:20 - Mokanda na Bomoi

20 Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 15:20
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezawu akimaki mbangu mpo na kokutana na ye ; ayambaki ye, amibwakaki na nzoto na ye mpo na koyamba ye mpe apesaki ye beze ; bongo bakomaki kolela.


Sima, amibwakaki na kingo ya ndeko na ye Benjame mpe alelaki ; Benjame mpe akangaki ye na kingo, bongo alelaki.


Jozefi abongisaki Shario na ye mpe akendeki kokutana na Isalaele, tata na ye, na Gosheni. Tango kaka akomaki liboso na ye, ayambaki tata na ye mpe alelaki mingi.


Boye Joabi akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Mokonzi abengisaki Abisalomi, mpe Abisalomi akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki elongi kino na mabele, mpe mokonzi ayambaki ye.


Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe na mawa mpe na ngolu, osilikaka noki te, otonda na bolingo mpe na boyengebene.


Nkolo, ozali malamu, olimbisaka, otonda na bolingo mpo na bato nyonso oyo babelelaka Yo.


Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te !


Namonaki banzela na ye, kasi nakobikisa ye ; nakotambolisa ye mpe nakobondisa ye.


Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.


Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.


Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo ; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo ! › »


Mwana alobaki na tata na ye : « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. »


Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.


Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki Polo mpe bapesaki ye beze ;


Kasi sik’oyo, kati na Yesu-Klisto, bino oyo na kala bozalaki mosika, bokomi pene na nzela ya mbeka ya makila ya Klisto.


Ayaki mpe ateyaki kimia epai na bino oyo bozalaki mosika, mpe kimia epai na bato oyo bazalaki pene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ