Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 15:2 - Mokanda na Bomoi

2 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba : — Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 15:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela ; kasi bazali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo.


Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini moteyi na bino azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


Bongo Yesu alobaki na bango lisese oyo :


Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima ; bazalaki koloba : — Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu !


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


Mwana na Moto ayaki, azali kolia, azali komela, mpe bozali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe ya komela masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu ! »


Tango Mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, amilobelaki : — Soki moto oyo azali mosakoli, alingaki koyeba soki mwasi oyo azali kosimba Ye azali nani, mpe soki azali mwasi ya lolenge nini : moto ya masumu.


mpe balobaki : — Okotaki na ndako ya bato ya bikolo ya bapaya mpe oliaki elongo na bango !


Pamba te liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Jake bakoma, Petelo azalaki kolia mesa moko elongo na Bapagano ; kasi sima na bango kokoma, akomaki kobenda nzoto mpe akabwanaki na Bapagano yango mpo ete azalaki kobanga Bayuda.


Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango : Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu ; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ