Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 15:19 - Mokanda na Bomoi

19 Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo ; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo ! › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 15:19
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. ›


Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele mpe na putulu ya moto. »


Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala ! Tala elongi ya mopakolami na Yo !


Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai ; nakoloba na ye : ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo.


Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.


Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !


pamba te nazali moke penza kati na bantoma ; mpe nakoki kutu te kobengama ntoma, mpo ete nanyokolaki Lingomba ya Nzambe.


Yango wana, bomikitisaka na se ya loboko ya nguya ya Nzambe mpo ete atombola bino na tango oyo ekoki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ